2 Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli : Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.
Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,