Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 45:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bana na yo ya mibali bakozwa esika ya bakoko na bango ; okotia bango bakambi kati na mokili mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 45:17
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, bakonzi nyonso ya mabele bakokumisa Yo tango bakoyoka maloba kobima na monoko na Yo ;


Kasi ebenga na ngai, mwasi na ngai oyo akoka na nyonso, azali kaka ye moko ; azali kaka ye moko mwana mwasi ya mama na ye, oyo aleki kitoko na libumu ya mama oyo abota ye. Tango bilenge basi bamonaka ye, balulaka ye mpe batatolaka ete azali mwasi na esengo. Basi ya bakonzi mpe bamakangu bakumisaka ye soki bamoni ye.


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota, mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo ; moto nyonso oyo akomona bino akondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli.


Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Nazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.


Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ