Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 45:13 - Mokanda na Bomoi

13 Tiri, mboka kitoko, bato oyo baleki na bozwi kati na bato bakomemela yo bakado mpo ete olinga bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 45:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Irami, mokonzi ya Tiri, ayokaki sango ete bapakolaki Salomo mafuta mpo ete akoma mokonzi mpo na kokitana na Davidi, tata na ye, atindaki bantoma epai ya Salomo, pamba te azalaki tango nyonso molingami ya Davidi.


Zonga, zonga, oh mwasi ya Sulami ! Zonga, zonga mpo ete tokoka kotala yo malamu ! Mpo na nini bolingi kotala malamu mwasi ya Sulami ndenge batalaka mabina ya mindule ya masanga mibale ?


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.


Bazoba ! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ?


Kasi bolata Nkolo Yesu-Klisto mpe bomitungisa te na baposa ya nzoto oyo ezali kobundisa bino.


Ezali kaka makambo ya kati nde ekomisaka moto Moyuda, mpe kokatama ngenga ya solo ezali nde oyo Molimo asalaka kati na motema ; ezali te oyo tosalaka na kotosa Mobeko. Lokumu ya Moyuda ya boye ewutaka na bato te, kasi na Nzambe.


Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano,


Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.


Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ