Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, soki oyebi yango te, landa kaka matambe ya bibwele, na banzela oyo yango elekeli, mpe leisa bana bantaba ya basi na yo pembeni ya bandako ya kapo ya babateli bibwele.
Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi ! »
Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko lokola engumba ya Tiritsa ; elongi na yo ezali kitoko lokola engumba Yelusalemi ; obangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango.
pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.
Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›