Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 44:4 - Mokanda na Bomoi

4 Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango ; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 44:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.


Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye ! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango !


Mozindo ebendaka mozindo tango bambonge na Yo nyonso etombokaka ; Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.


Nzokande, Yo Nzambe, ozali Mokonzi na ngai wuta kala ; Yo nde omemaka lobiko kati na mokili.


Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango ; mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.


Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.


Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso ; Ye nde akobikisa biso.


Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.


Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.


Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.


Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.


Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito.


Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ