Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 43:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 43:3
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo !


Mokonzi alobaki na Tsadoki : — Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango.


Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.


Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni,


Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni.


Liloba na Yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.


Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku !


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.


Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.


Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai, natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani, nakobomba yango ata moke te.


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba.


Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.


Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.


kasi aponaki libota ya Yuda, ngomba Siona oyo alingaki ;


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.


Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.


Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.


Oh banguna na ngai, boseka ngai te ! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ