2 Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi ; mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna ?
Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Nalobi na Nzambe, Libanga na ngai : « Mpo na nini obosani ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na mawa kati na motema mpe na se ya minyoko ya monguna ? »
Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye ; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.