Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 42:9 - Mokanda na Bomoi

9 Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye ; na butu, nakumisaka Ye na banzembo mpe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 42:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo ! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.


Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo mpo na bozoba na ngai.


Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi ; mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna ?


Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,


Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.


Bolingo na Ye esili penza mpo na libela ? Bilaka na Ye ekokokisama te mpo na libela ?


Bazalaki kozongisa na makanisi na bango ete Nzambe nde azali Libanga na bango, ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Mosikoli na bango.


Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema, okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango ; nakomi lokola mokangami kati na boloko, nakoki kobima te !


Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Oh Jakobi, mpo na nini ozali koloba ; oh Isalaele, mpo na nini kotatola : « Nzela na ngai ebombami na miso ya Yawe, likambo na ngai eyebani te na Nzambe na ngai ? »


Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ