Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 42:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mozindo ebendaka mozindo tango bambonge na Yo nyonso etombokaka ; Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 42:8
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbonge ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo,


Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,


Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso.


Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela.


Tika ete bayengebene na Yawe basepela kati na lokumu oyo ; tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango !


Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai toli mpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai.


Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ; nakobanga nani ? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ; nakolenga liboso ya nani ?


Ozali ebombamelo na ngai ; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.


Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango ; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.


Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.


Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta ; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.


Nakanisaka lisusu mikolo ya kala, mibu nyonso oyo eleka ;


Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.


Mpo na bino, bokoyemba banzembo lokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule ; mitema na bino ekotonda na esengo lokola bato oyo bazali kobeta flite mpo na kokende na Ngomba ya Yawe, na Libanga ya Isalaele.


Nakotindela bino mapamboli mingi na mobu ya motoba mpo ete mabele ekoka kobota bambuma mingi oyo bokoki kolia mibu misato.


Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.


Mokonzi ya basoda alobaki : — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.


Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.


Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.


Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ