Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 42:6 - Mokanda na Bomoi

6 Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa makasi kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakokumisa lisusu lobiko na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 42:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakatisaki ebale Yordani. Liboso ete tongo etana, bango nyonso basilisaki kokatisa Yordani, moko te atikalaki.


Tango Davidi akomaki na Maanayimi, bayambaki ye epai ya Shovi, mwana mobali ya Naashi ya mboka Raba ya bato ya Amoni, epai ya Makiri, mwana mobali ya Amieli ya mboka ya Lo-Debari, mpe epai ya Barizilayi, moto ya Galadi ya mboka Rogelimi.


Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »


bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda.


Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.


Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai.


Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka, mabele esili kokanga bikangelo na yango sima na ngai mpo na libela. Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai, obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.


Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ