Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Ndeke ya moke ezwaka esika ya kovanda, mpe mbilambila esalaka zala epai wapi etiaka bana na yango, pene ya bitumbelo na Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.
Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.
Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.
pamba te bango moko bazali kotatola ndenge nini boyambaki biso mpe ndenge nini botikaki kosambela banzambe ya bikeko mpo na komipesa na Nzambe mpe mpo na kosalela Nzambe na bomoi mpe ya solo,
Bongo Jozue alobaki : — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.
Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.