4 Yawe akosunga ye na mbeto na ye soki abeli mpe akobikisa ye na bokono na ye nyonso.
Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,
Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.
Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.