Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 41:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mpo ete nazangi pamela, okosunga ngai mpe okovandisa ngai na makolo na Yo mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 41:13
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azongiselaki mokonzi : — Amen ! Tika ete Yawe, Nzambe ya mokonzi, nkolo na ngai, akokisa maloba oyo.


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Bato nyonso balobaki : « Amen ! » Mpe bakumisaki Yawe !


Davidi akumisaki Yawe liboso ya lisanga mobimba na maloba oyo : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tata na biso, tika ete ozwa lokumu mpo na libela !


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Tika ete bato nyonso baloba : « Amen ! » Bokumisa Yawe !


Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.


Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !


Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo, oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo !


Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu !


Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’ Mwasi akozongisa : ‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


na koloba : « Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Yo oyo ozali mpe ozalaki, tozali kopesa Yo matondi ; mpo ete osalelaki nguya monene na Yo mpe okomaki kokonza.


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.


na koloba : « Amen ! Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, matondi, lokumu, nguya mpe makasi ezala ya Nzambe na biso, mpo na libela na libela ! Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ