12 Nakoyeba ete osepelaka na ngai soki kaka monguna na ngai agangi te na tina na ngai.
alongolaka miso na Ye te likolo ya bayengebene, avandisaka bango na kiti ya bokonzi elongo na bakonzi mpe atombolaka bango mpo na libela.
Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.
Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !
Lokola mpe natielaka Yo motema, tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.
Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.
Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango.
pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.
pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.
Soki nalobi : « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.
Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.