Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 40:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 40:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,


Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;


Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai kososola makanisi na Yo ! Tala ndenge motango na yango ezali ebele !


Nameki kotanga yango, ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo. Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.


Nakopamela yo te na tina na bambeka na yo, pamba te bambeka na yo ya kotumba ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Oh Nzambe ! Nzambe, Mobikisi na ngai, kangola ngai wuta na mokumba ya makila, mpe lolemo na ngai ekosakola bosembo na Yo.


Monoko na ngai ekosakola tango nyonso misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo, pamba te nayebi motango na yango te.


wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.


« Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe ? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.


Yawe, ozali Nzambe na ngai ; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.


Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.


Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.


Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma, nakondima yango te ; ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta, nakotala yango ata moke te.


Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te !


Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.


Samuele alobaki : — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ