Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.
Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.