17 Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »
Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela ; tika ete balobaka tango nyonso : « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »
Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Nzambe azali monene ! »
Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »
Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.