14 Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ; Yawe, yaka noki kosunga ngai.
Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.
Kozala mosika na ngai te, pamba te pasi ekomi pene mpe nazangi moto oyo akosunga ngai.
Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te ! Ozali makasi na ngai ; yaka noki kosunga ngai.
Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !
Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai basambwa mpe bayoka soni ; tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa !
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.
Tika ete bato oyo bafundaka ngai bakufa soni mpe balimwa ! Tika ete ba-oyo balukaka pasi na ngai basambwa mpe bayokisama soni !
Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
Bato nyonso oyo bazali kotombokela yo bakokufa solo soni mpe bakosambwa ; bato oyo bazali kotelemela yo bakokoma lokola biloko pamba mpe bakokufa.
Bakoloba na tina na Ngai : ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.
Tango Yesu alobaki na bango : « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele.