Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.
Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.
Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.
Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.