Tokende na yo elongo, tokima mbangu ! Mokonzi akotisi ngai na bashambre na ye ! Tovanda elongo na esengo mpe tosepela na tina na yo, tosanzola bolingo na yo, oyo eleki vino ya kitoko na elengi. Solo, ezali na pamba te nde basi balulaka yo !
Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, nzete oyo ezalaki na mapeka na bango mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.
Esengo mpe kosepela esili kolimwa na bilanga mpe na bazamba ya Moabi ; nakawusi vino kati na bikamolelo na bango, mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te. Atako bato bazali koganga kasi ezali makelele ya esengo te.
Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,
Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.