4 Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye ; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »
Bakambi banyokolaka ngai kaka pamba, kasi kaka liloba na Yo nde ebangisaka motema na ngai.
Nzambe na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai. Yoka libondeli na ngai.
Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.
Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni ! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !
Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.
Tika ete mokili mobimba etosa Yawe ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga liboso na Ye.
Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.
Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta ; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
Nakanisaka lisusu mikolo ya kala, mibu nyonso oyo eleka ;
Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.
Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
Tika ete omimonaka te moto ya bwanya na miso na yo moko ; tosa Yawe mpe longwa na mabe.
Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.
Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !
Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.
Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.