Kati na kobanga na ngai, namilobelaki : « Obengani ngai penza mosika na Yo ! » Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo mpe wana nazalaki kobelela Yo.
Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.
Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.