Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 39:8 - Mokanda na Bomoi

8 Sik’oyo, oh Nkolo, nazela lisusu nini ? Natiaka elikya na ngai kati na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 39:8
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka, pamba te mibeko na Yo ezali malamu.


Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.


Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.


Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo, limbisa masumu na ngai, atako ezali minene.


Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso.


Balobaka na mongongo makasi : « Eh ! Eh ! Tomonaki ye ! »


Oteki bato na Yo na pamba mpe ozwi ata litomba te kowuta na boteki yango.


Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo, mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu mpo na kolendisaka ngai.


Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.


Yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na Yo.


Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso bazali kofinga biso, mpe tokomi lokola eloko ya liseki na miso na bango !


Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. Tika ete baloba : « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola to eloko ya maseki kati na bikolo. Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba : ‹ Wapi Nzambe na bango ? › »


Yawe akoyanola mpe akoloba na bango : « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.


Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.


Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ