Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 39:5 - Mokanda na Bomoi

5 Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 39:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.


Mokonzi alobaki na Barizilayi : — Katisa elongo na ngai mpe vanda epai na ngai na Yelusalemi, mpe ngai nakosunga yo.


Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.


Moto azali lokola mopepe, mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.


Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.


Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.


Yawe, kino tango nini ? Okomibomba penza tango nyonso ? Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto ?


Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.


Pamba na pamba, elobi Moteyi ; pamba na pamba, nyonso ezali kaka pamba.


Boye, tango natali misala nyonso oyo maboko na ngai esalaki mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango, namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe, ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi.


Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba ; amonaka yango lokola eloko pamba to mpe lokola eloko te.


Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?


Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana : mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ