4 Motema na ngai eswaki, moto ezalaki kopela kati na ngai, mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.
Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila ! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu !
pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso, ayebi malamu ete tozali putulu.
Mikolo ya bomoi ya mosali na Yo ezali motango boni ? Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu ?
Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.