Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 39:12 - Mokanda na Bomoi

12 Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela ; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 39:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia.


Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.


Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »


— Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.


Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela, ndenge ezalaki batata na biso. Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka lokola elili oyo ezangi elikya.


Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, lokola elamba oyo balie na banselele !


Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.


Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe.


Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai ; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.


Nazali mopaya awa na mokili ; kobombela ngai mibeko na Yo te.


Nakoma koyemba mitindo na Yo na bisika nyonso epai wapi nazali moleki nzela.


Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu ? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !


Mikolo nyonso ya bomoi na biso elimwaka mpo na kanda na Yo, mpe mibu na biso esilaka lokola kolela.


Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela.


Yango wana tozalaka na mpiko tango nyonso. Mpe toyebi malamu ete, awa tozali kowumela kati na nzoto oyo, tozali mosika na Nkolo,


Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.


Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.


Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.


Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ