7 Nagumbami, nalembi makasi ; nakomi moto ya mawa mpo na libela.
kasi nazongiselaki mokonzi : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ?
Na nguya na yango, pasi ekomi lokola kingo ya nzambala na ngai.
Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo ; yanola ngai noki !
Banguna na ngai basanganaka kaka mpo na kotonga ngai mpe kokanisa mpo na libebi na ngai.
Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te ; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki.