Nalobaki : « Oh Nzambe na ngai ! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai ; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo !
Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.
Maboko na Ye ekangi masumu na ngai ndenge bakangaka ekangiseli ; masumu yango emati ngai kino na kingo, mpe Nkolo asilisi makasi na ngai, akabi ngai na maboko ya bato oyo nazali na makoki ya kotelemela te.
Soki mosuni ya mbeka ya boyokani eliami na mokolo ya misato, mbeka yango ekondimama te. Ekotangama te likolo ya moto oyo abonzi yango, pamba te ezali likabo ya mbindo ; mpe moto oyo akomeka kolia yango akomema masumu.
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.