3 Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.
Bongo Oziasi, oyo asimbaki mbabola na loboko na ye, atombokelaki Banganga-Nzambe. Kaka na tango yango, wana azalaki kati na Tempelo ya Yawe liboso ya etumbelo ya ansa, bokono ya maba ebimaki na elongi na ye na miso ya Banganga-Nzambe.
Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo ; yanola ngai noki !
Motema na ngai ebungisi elikya mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ; mpo na yango, nakomi ata kobosana kolia bilei na ngai.
Butu mpe moyi, loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ; makasi na ngai ekomaki kosila ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.
Nzokande Yo, osepelaka na bosembo, ata kati na libumu ; mpe okoteya ngai bwanya kati na esika ebombama.
Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.