21 Bato oyo bazongisaka mabe na bolamu bazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »
Wuta mbotama na ngai, batikaki ngai na maboko na Yo ; wuta libumu ya mama na ngai, ozali Nzambe na ngai.
bazali kokabola bilamba na ngai mpe kobeta zeke mpo na nzambala na ngai.
Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye ! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu ! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !
Bazali kozongisela ngai mabe mpo na bolamu oyo nasalaki, mpe kosundola ngai lokola monyokolami.