19 Solo nandimi mabe na ngai, masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.
Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi ;
Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele, mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi !
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.
Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai ; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.
Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi ; mongongo na ngai ekawuki, miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.
Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.