15 Nakomi lokola mokufi matoyi oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.
Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.
Nzambe na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai. Yoka libondeli na ngai.
Moto akendaka mpe azongaka, azali kaka lokola elili ; amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo, kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.
Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; akangaki monoko na ye.