Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 38:11 - Mokanda na Bomoi

11 Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 38:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.


Bomoi na ngai ekawuki mpo na pasi, mpe mibu na ngai ezali koleka kati na kolela ; makasi na ngai esili mpo na mabe na ngai, mpe mikuwa na ngai elembi.


Ezingelaka ngai mikolo nyonso, lokola mayi, na bangambo nyonso.


Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye ; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.


Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.


Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika.


Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.


Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ