Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke ; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo.
Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›
Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.