Tika ete mopiku ya banzambe na yo ya bikeko ebikisa yo tango okoluka lisungi ! Mopepe makasi ekomema yango nyonso, mopepe moko ekopikola yango. Kasi moto oyo akomisaka Ngai ebombamelo na ye akozwa lokola libula mokili mpe ngomba na Ngai ya bule. »
Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.
Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.
Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.
Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi : ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. ›