8 Boya kanda mpe kosilika te ; kotomboka te, noki te okosala mabe.
Faraon atunaki ye : — Ozangi eloko nini awa mpo ete oluka kozonga na mokili na yo ? Adadi azongisaki : — Eloko moko te. Kasi tika ngai ete nakende kaka.
Awa, likolo ya kanda na yo, ozali komipasola na biteni, basundola mokili to balongola mabanga na bisika na yango likolo na yo ?
Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.
Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »
Tika ete Yawe akumisama, pamba te atalisaki ngai bolingo na Ye ya kokamwa, tango nazalaki kati na engumba oyo ezingelamaki na banguna !
Soki nalobi : « Nakoloba lokola bango, » wana nateki penza lokumu ya libota na Yo.
Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.
Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.
Yona asepelaki na yango ata moke te, asilikaki makasi.
Nzambe alobaki na Yona : — Okanisi ete ozali kosala malamu ndenge ozali kosilika mpo na nzete oyo ? Yona azongisaki : — Ezali se bongo. Nazali kosala malamu ndenge nazali kosilika kino kosenga kufa na ngai.
Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.
Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe.
Kasi sik’oyo, bosengeli kolimwisa makambo yango nyonso : kanda, koyinana, misala mabe, mafinga mpe maloba mabe oyo ekoki kobima na minoko na bino.