Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 37:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 37:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai.


Makambo oyo okokana, ekosalema, mpe pole ekongenga na nzela na yo.


Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba :


Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.


Pesa misala na yo epai na Yawe, mpe mabongisi na yo ekokokisama.


Boye, nakanisaki mingi na makambo oyo nyonso mpe namonaki ete, ezala moto ya sembo, moto ya bwanya elongo na makambo nyonso oyo basalaka, bazali na maboko ya Nzambe ; kasi moko te ayebaka soki bolingo to koyina ezelaka ye.


Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?


Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?


Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ?


Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »


Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.


Bato bazongiselaki ye : — Onyokolaki biso te mpe omonisaki biso pasi te ; ozwaki ata eloko moko te na maboko ya moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ