Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 37:40 - Mokanda na Bomoi

40 Yawe asungaka mpe akangolaka bango, akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe mpe abikisaka bango, pamba te babombamaka kati na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 37:40
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe asungaki bango mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya Agari mpe baninga na bango nyonso oyo bayaki kosunga bango, pamba te babelelaki Yawe na tango ya bitumba. Yawe ayanolaki bango, pamba te batielaki Ye motema.


Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango ; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.


Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.


Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,


Kolobaka te : « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai ! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.


Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela Yelusalemi, akobatela mpe akokangola, akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. »


Ezala tango bokotonda na suki ya pembe mpe bokokoma mibange, Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ; Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, nakosunga bino mpe nakobikisa bino.


Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.


Nabukodonozori alobaki : — Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama ; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema ! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te.


Nzambe na ngai atindaki anjelu na Ye mpo ete akanga bankosi minoko ; boye, esalaki ngai mabe ata moko te, mpo ete natambolaki mabe te na miso na Ye, mpe nasalaki mabe ata moko te liboso na yo, mokonzi.


Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ