Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 37:30 - Mokanda na Bomoi

30 Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 37:30
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Monoko na ngai ekosakola tango nyonso misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo, pamba te nayebi motango na yango te.


Lolemo na ngai ekotatola tango nyonso misala ya bosembo na Yo, pamba te bato oyo balukaka pasi na ngai bayokisami soni mpe basambwe.


Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo, kasi motema ya moto mabe ezali na tina te.


Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele, kasi zoba akokufa na bozoba na ye.


Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya, kasi lolemo ya lokuta ekokatama.


Bibebu ya moto ya bwanya esopaka boyebi, kasi ezali bongo te na motema ya zoba.


Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.


moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye.


Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.


Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ