Banzembo 37:3 - Mokanda na Bomoi3 Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »