26 Akabaka tango nyonso mpe adefisaka, bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.
Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
Akabelaka babola na motema ya esengo ; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.
Alendisaka bikangelo ya bikuke na yo mpe apambolaka bana na yo epai na yo.
Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.
Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.
Mokolo mobimba, akufaka na ye kaka na baposa makasi ; kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.
Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.
Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa !