24 ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.
Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.
pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.
Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te ;
Soki nalobi : « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.
pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo, akotelema kaka ; nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.
Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.