2 pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti.
Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.
Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.
Pamba te ekomama : « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,