Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 37:18 - Mokanda na Bomoi

18 Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela, mpe libula na bango ekowumela mpo na seko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 37:18
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.


Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.


Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe, mpe nalobaka : « Ozali Nzambe na ngai. »


Nalingaka te bato nyonso oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko, pamba te natiaka elikya na ngai kati na Yawe.


Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.


Nayokaka masese, mpe nalimbolaka sambole na nzela ya lindanda.


Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.


Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili, mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango ;


Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.


Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango ; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.


mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Bikangelo ya bikuke na yo ekozala ya bibende mpe ya bronze. Mpe tika ete makasi na yo ewumela ndenge mikolo na yo ezali.


Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »


Mpe tala elaka oyo apesaki biso : bomoi ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ