Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 37:17 - Mokanda na Bomoi

17 pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 37:17
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazangisi bato mabe pole mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.


Bebisa nguya ya moto mabe, pesa moto ya misala mabe etumbu mpo na mabe na ye, mpo ete emonana lisusu te.


Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.


ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.


Nakoyeba ete osepelaka na ngai soki kaka monguna na ngai agangi te na tina na ngai.


Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ; mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.


pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


Liseke ya Moabi ebukani mpe loboko na ye ekatani, » elobi Yawe.


Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;


Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ