Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 37:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 37:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi ya Potifari abombaki elamba ya Jozefi pembeni na ye kino mobali na ye azongaki na ndako.


Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi.


Nzokande Amani asilaki koyoka ete Maridoshe azali Moyuda. Boye amonaki ete likanisi ya koboma kaka Maridoshe ekoki te ; alukaki nzela ya koboma Bayuda nyonso, bato ya Maridoshe, kati na mokili mobimba ya mokonzi Kizerisesi.


Kasi makambo oyo nyonso ezali kosepelisa ngai te tango nazali komona Moyuda wana Maridoshe kovanda na ekuke ya mokonzi.


Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.


Mabe ebomaka moto mabe, mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.


Lokola bapagano, bazali koseka ngai, bazali kolia minu na tina na ngai.


Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe mpe alukaka nzela ya koboma ye,


Likolo ya botomboki ya bato liboso ya Nzambe, mampinga ya likolo ekomaki na se ya bokonzi ya liseke elongo na mbeka ya mokolo na mokolo. Liseke yango ezalaki kolonga na makambo nyonso oyo ezalaki kosala mpe ebwakaki solo na mabele.


akokoma makasi koleka, kasi na nguya na ye moko te. Akobebisa mokili na ndenge ya kokamwa mpe akolonga na makambo nyonso oyo akosala ; akoboma bato ya makasi mpe basantu.


Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.


Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.


bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.


Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ