Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 37:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 37:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.


Boye, bakolekisa mikolo ya bomoi na bango kati na bofuluki, mpe mokili ekozala libula ya bana na bango.


Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya ! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.


Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso, mpe kimia ekofuluka kino sanza ekongenga lisusu te.


Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.


Oh ! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai, kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene ;


Tika ete mopiku ya banzambe na yo ya bikeko ebikisa yo tango okoluka lisungi ! Mopepe makasi ekomema yango nyonso, mopepe moko ekopikola yango. Kasi moto oyo akomisaka Ngai ebombamelo na ye akozwa lokola libula mokili mpe ngomba na Ngai ya bule. »


Esengo na bato na komikitisa, pamba te bakozwa mokili lokola libula !


Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !


Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.


Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.


Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.


Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.


Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ