Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 36:8 - Mokanda na Bomoi

8 Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya ! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 36:8
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale, mayi oyo etiolaka makasi elongo na mafuta ya nzoyi mpe miliki ;


Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.


Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !


Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,


Boboto na Yo ezali penza monene, boboto oyo obombaka mpo na bato oyo batosaka Yo, boboto oyo otalisaka epai ya bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, na miso ya bato nyonso.


ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba.


Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.


Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ; kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.


Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.


Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.


Banyama ya zamba, bambwa ya zamba mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo ; pamba te nakopesa mayi kati na esobe, bibale kati na mabele ekawuka, mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki,


Bayokaki posa ya mayi te tango azalaki kotambolisa bango na esobe, abimisaki mayi na libanga mpo na bango, abukaki libanga mpe mayi ebimaki.


Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.


Bakozala bato ya esengo, bakokoma kitoko makasi. Ble ekopesa bilenge mibali makasi mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.


Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !


Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ