2 Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu : Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.
Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.
Boye, toloba nini ? Biso Bayuda toleki bato mosusu ? Te, soki moke te ! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu.
Yawe akolimbisa ye te ; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili.