Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 35:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nakotonda na esengo kati na Yawe mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 35:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,


Kasi ngai nakosepela kati na Yawe mpe nakotondisama na esengo mingi kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.


Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo ; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.


Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye, pamba te totiaka elikya na biso kati na Kombo na Ye ya bule.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


bongo monguna na ngai akoloba : « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.


Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;


Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.


mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.


Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye ! Tika ete Yawe azala esengo na ngai !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ